Exibições da letra 176

Tala Muana N Mpate

Carlyto Lassa

LetraSignificado

    Yowani a kawusaki mayi na miso
    Po amonaki bomoyi
    Emoniseli ememi ngai lelo na bomoyi
    Ba zuwaki Yé Mwana na Mpaté

    Nilingi na Yesu
    Azalaki mbeka ya lisapo'o ya Bibiliya
    Banda ko kelama apesamaki
    Na ba bomi niama
    Afungolaki mongongo té
    Azalaki na singa
    Ya mokano na Nzambe

    (Awa biso to weli bomoyi
    Nani ako ndima ko zwa singa
    Ya kufa na kingo na yé
    Lokola ntaba ya Mwana na Mpaté?)

    Bikelamu ya likolo
    Pé nasé towe'la ka bomoyi
    Kasi Yesu aponaki ko kufela
    Sé nga na yo
    Azalaki ndé Mbeka epayi
    Na Nzambé Tata
    Na ko kitisama na Yé
    Ya Mwana na Mpaté, eehh

    Na getesemana alongwé té
    Na mokano na Papa
    Yango tozwi lobiko
    (Talela Yesu, mopesi bomoyi)

    Tala Mwana na Mpaté na Nzambé, eehh
    Molongoli masumu na mokili
    Tala Mwana na Mpaté na Nzambé
    Ndeko yaka mona pé bila Yesu

    Na lelaki mingi
    Pasi na ngai ezangaki moto
    Moto abikisa
    (Soki Yesu té, mais na suki wapi?)
    Azuwamaki té na mokili oyo
    A kokaki ko somba
    Ko sombela ngai bomoyi, eeh
    Na makila ma Yesu
    Na longi kufa, maladie pé bobola
    Nga na zwi lobiko, oo

    Kuna ndé na zwi kobika
    Kuna ndé na zwi lobiko
    Na talela ekulusu
    Tika nga na salela Yé

    Tala Mwana na Mpaté na Nzambé
    Molongoli masumu na mokili
    Tala Mwana na Mpaté na Nzambé
    Ndeko yaka mona pé bila Yesu
    Na lelaki mingi
    Pasi na ngai ezangaki moto
    Moto abikisa ngai, eehh
    (Soki yo té Papa)

    Azuwamaki té na mabé
    Nani Akokaki ko pesa?
    Kopesa bomoyi ya seko
    Mais na pola kala na mabelé
    Na ekuulusu na longi satana, ba démons
    Yesu!
    Akokisi nionso
    Pona ngai, eehh

    Tala Mwana na Mpaté na Nzambé
    Molongoli masumu na mokili
    Tala Mwana na Mpaté na Nzambé
    Ndeko yaka mona pé bila Yesu

    Alongi kufa (Yesu)
    Apesi bomoyi (na nga, eeh)
    Abimisi nga lelo, nasé ya libulu
    Maladie na ngai (ah)
    Ezwi ekulusu (Yesu)
    Na biki lelo
    Na salela Yé
    Yesu (Yesu)
    Yesu (Yesu)

    Nazalaki ntaba
    Ntaba ya bonne année
    Soki yo té (Yo té mosusu nani?)
    Nde nga nani? (Nasuki wapi?)
    Mais na komi nini?
    (Mais na koma nani ba ndeko na ngai?)


    Comentários

    Envie dúvidas, explicações e curiosidades sobre a letra

    0 / 500

    Faça parte  dessa comunidade 

    Tire dúvidas sobre idiomas, interaja com outros fãs de Carlyto Lassa e vá além da letra da música.

    Conheça o Letras Academy

    Enviar para a central de dúvidas?

    Dúvidas enviadas podem receber respostas de professores e alunos da plataforma.

    Fixe este conteúdo com a aula:

    0 / 500

    Opções de seleção