exibições de letras 28
Letra

    Nkolo asungi nga kati na minioko (Oh, oh Masiya Yesu)
    Nkolo apesi nga kimia na motema (Kimia, Yesu apesi nga lisusu nini oh)
    Nkolo apesi nga bomoyi na seko (Bomoyi, oh)
    Tala tina (Tala tina)

    Tokokota lola te pona koyemba eh
    Tokokota lola te pona molato eh
    Ndeko tokomona Nzambe te pona kitoko eh
    Se mitema tobongisa yango
    Yesu Masiya azua esika moyo eh

    O moyo batata moyo, o moyo bamama moyo
    O moyo bilenge moyo, ka minlele ko

    O moyo batata moyo, o moyo bamama moyo
    O moyo bilenge moyo, ka minlele ko

    Il est Jehovah Jiré, celui qui pourvoit
    Il est Jehovah Nissi, ma banière
    Il est Jehovah Shalom le Dieu de paix
    Il est Jehovah Rapha, Il m'a guéri

    Il est le Roi des rois, botika na yembela ye
    Na manso asali na nzoto na nga
    Nakoki te baninga kobomba yango Yesu eh

    Nzambe ozali Nzambe ya tango nionso
    (Nzambe ozali Nzambe ya tango nionso)
    Nzambe na nguya e nabeleli yo oza monene
    (Nzambe ozali Nzambe ya tango nionso)
    Nzambe na Mombaya Nzambe na Kombay oza monene
    (Nzambe ozali Nzambe ya tango nionso)
    Babalaka te bakoma kobala oza na nguya
    (Nzambe ozali Nzambe ya tango nionso)
    Babotaka te bakoma kobota oza monene
    (Nzambe ozali Nzambe ya tango nionso)
    O Nzambe na Marie-Anne opesi Scherel oza kosala
    (Nzambe ozali Nzambe ya tango nionso)

    Tosengi na Nzambe apambola
    Nzambe apambola eh Nzambe apambola lingomba na ye
    Tosengi na Nzambe apambola
    Nzambe apambola eh Nzambe apambola lingomba na ye

    Loboko na yo eh tokosenga na Congo
    Molimo na nguya Nzambe kitisa
    Nzambe pambola, Nzambe pambola lingomba na yo eh

    Tosengi na Nzambe apambola
    Nzambe apambola eh Nzambe apambola lingomba na ye

    Elanga na ye ezali monene
    Kasi basali bazali moke
    Tosengi na Nzambe atinda basali na mosala na ye

    Tosengi na Nzambe apambola
    Nzambe apambola eh Nzambe apambola lingomba na ye

    Napesa yo nini
    Nzambe na nga na pesa yo (Oh napesa yo nini)
    Nzambe na nga na pesa yo (Nkolo nga napesa yo nini)
    Nzambe na nga na pesa yo (Napesa yo nini eh)

    Nga nalandaki bisengo ya mokili oyo
    Nga na yebaki te nini nasala Nzambe
    Ngolu na yo pe bolingo na yo Nzambe
    Ekomisi nga ekelamu ya sika
    Yo Nzambe, yo Nzambe otonda na mawa
    Kumama yo elonga na nga

    O napesa yo nini
    Nzambe na nga na pesa yo (Okangoli ngai Yahwe)
    Nzambe na nga na pesa yo (Yo nde libanga ya talo Yahwe)
    Nzambe na nga na pesa yo (Yo elonga na nga papa)
    Nzambe na nga na pesa yo

    Alleluia tokumisa Yesu Masiya
    Hosanna Nkembo na Yawe na se mpe likolo
    Alleluia tokumisa Yesu Masiya
    Hosanna Nkembo na Yawe na se mpe likolo

    Tokumisa Yesu Masiya pona bolingo na ye
    Toyembela Mwana na mpate na likinda
    Atikaki lola aye kopesa bomoyi na seko

    Kembo na Yesu Mokonzi na bakonzi
    Mabolongo nionso engumbamela Yawe
    Mingongo nionso enganga kembo lokumu na Yawe

    Alleluia tokumisa Yesu Masiya
    Hosanna Nkembo na Yawe na se mpe likolo

    Bana na Nzambe toyembela Mokonzi
    Batata nionso, bilenge pe bamama
    Tobeta maboko, tobinela Yepowa

    Kadi bonso bwabu Nzambi wazola nza
    Wa tu vana Mwan’andi mosi kaka
    Mpasi wonso ulekilanga minu
    Kabungwa ko, kansi ka baka moyo wa mvu ya mvu

    Alleluia tokumisa Yesu Masiya
    Hosanna Nkembo na Yawe na se mpe likolo


    Comentários

    Envie dúvidas, explicações e curiosidades sobre a letra

    0 / 500

    Faça parte  dessa comunidade 

    Tire dúvidas sobre idiomas, interaja com outros fãs de Charles Mombaya e vá além da letra da música.

    Conheça o Letras Academy

    Enviar para a central de dúvidas?

    Dúvidas enviadas podem receber respostas de professores e alunos da plataforma.

    Fixe este conteúdo com a aula:

    0 / 500

    Opções de seleção