exibições de letras 140

Tabu Fatou

Fally Ipupa

Letra

    Tabu fatu, tangu ozo lekaleka na voiture na yo ya chère tiaka pe liputa na coffre, po ofini kaka ba é ba kufa malili ya bolingo

    Bolingo neti oxygène esi ekoti ngai motéma moyen te nga boya cheri eeee
    Ezo pésa lasi, eloko ekoki kokabo la mosuni ya moto na mposo be liwa
    Mé bolingo ekomi kokabola ya ngai nzoto
    Tabu kolinga yo
    Il falait oti ka ngai na silissa tableau yango bolingo étikali inachevé
    Entre ngai na yo kolinga nde ezalaki kulutu sima na yango koyina nde ebotami
    Bolingo incolore, inodore mpe olypide ezwaka forme selon récipient, tabu fatu

    Meka bebe
    Meka kolakisa ngai ba facette caché, tabu
    Po un jour bolingo nazala assuré
    Hypocrisie ezali synonyme ya lâcheté (annie kabwele)
    Eloba ba kulutu uta kala na mokili

    Pourquoi lelo?
    Pourquoi na komi ko naviguer na molili, fatu
    Koleka Titanic liboso ya iceberg
    Naya ko heurter yango sima na zala coulé, (djo malandaa)
    Bakoma na ba livres etikala éternellement

    Ah lelo, lelo na komi déprimé névrose mpe malaise
    Likolo'ya ba souffrances ya love na koki o vivre te
    Na préféré na ngai na sala euthanasie
    Apres liwa yo koyébe ke na lingaki yo, aaa bebe tabu fatu
    (Karine tshitenge) (miclair bosiko) (mimi tshikeva) (beti yaouh) (ma lolo natasha kiténgé)

    Bolingo vraiment soki ezalaki arithmétique addition multiplication na ngo y'otié wapié? Yo oponi se division bolingo yo okeyi na yo
    Na tikalina ba soucis na motéma na ngai
    Horizon massamba chabani record guigui bokolé mimi toga

    Love ezalaki neti roman ya shakespeare, yokomisaki yango lokola ya Daniel deforet
    Na tikali isolé lokola robinson crusoé
    Na ile na makila na miso nani ayoka kolela na ngai
    Zaaalaki
    To zalaki bras dessus bras dessous na ba resto na ba fete partout
    Lelo oyo tabu y'okeyi na yo banza ata likabo moko ya malonga na sala pona yo

    Ale a ba mere bo bimisa maputa bo zipika ba pere, nguli zipita pé papa liputa a bina olai

    Maloba tabu ayébisaki ngai
    Aoki ezalaki makoma mbele ekomama ngai na nzoto
    Na lakisa yé po akanisa peut être ako changer idée tabu fatu, tabu fatu
    Tabu fatu maman na copréssor marie France tala koko mbaki na ngai aké!
    Yo okomona moto na na santé mediocre koleka mboka oyo eza na bitumba tabu fatu tabu fatu

    Na lingi yo olingi te nazo linga kaka ti mokolo oko linga ngai na sepela

    Lokola baye balingamaka nalinga na nga nazala ata moto ya suka
    Na kufa na ngai na bolingo ebembe na ngai elumba solo ya bolingo
    Na mema sango na yo na kunda na contaminé bawa bolingo na ngai bolingo ya cheri
    Tabu fatu
    Bolingo na ngai bolingo na yo
    Maman copréssor, bolingo na ngai bolingo na yo

    Tabu fatu na lingaka toujours ozala pembeni na ngai
    Lokola bolingo ya mama elona na kitambala
    Mosika na yo mawa eleki souffrance na ebele, pinzoli eleki molayi ya cravate
    Tabu
    Tabu fatu epa na ngai oza lokola mwana asengaki bomengo ya papa na ye
    Epayi akendeki esimbaki te, azongaki toujours na maboko ya papa na ye
    Yo pe epayi okeyi soki esimbi te., oza toujours bolingo na ngai
    Ata na lifelo, soki oza pembeni na ngai souffrance eko zala moins tabu

    Vers-moi, vers- moi, vers-moi, vers-moi
    Sango nasuka ya misa alobaka oyo aza na matoyi ayoka, motema a ndima
    Est-ce que oyoki?
    Na yoki te!
    Est-ce que ondimi?
    Na mdimi te?
    Cherie finika ngai liputa maman
    Mosusu te nako linga kaka yo
    Ata ba oyo ba leki yo na beaute cia nga naza kuna té
    Ndoki alula butu ngai na lula na ngai tabu fatu
    Ndeke asengaka loso asengaka te avion

    Naza na nzala kasi na sengi na ngai bolingo, naza na mbati kasi na sengi na ngai tabu fatu
    Na zanga papa, na zanga faustin, na zanga maman monique
    Na tikala na keyna na nga
    Na tikalaa na marcosisé ndoyi ya ba parents na ngai bongo nga na zanga yo tabu fatu
    Ngai namitiki lokola aveugle na maboko ya voyant
    Nzela nionso bakomema ngai, nako kende na ngai
    Ata na kufa, ata na bika tabu
    Ata na moyi, ata na mvula cherie, naza na nzala kasi na sengi na ngai bolingo, naza magnolo kasi na sengi na ngai l'amour
    Mokolo na kokutana na nzambe, nga na kosenga ye l'imperatrice wivine moleka ya mado

    Cherie bimela ngai ata lokola femme de nuit, nga na mitandi na mbeto na kozela yo
    Ata na 6 heure ata na midi, ti na 16 heure
    Na boyi kosambela noki nzambe abenganela ngai yo
    Maman yé ferkany la merveille!!

    Cherie finika ngai liputa maman
    Mosusu te na kolinga kaka yo
    Ata ba oyo ba leki yo na beaute cia nga naza kuna té
    Ndoki alula butu
    Ngai na lula na ngai tabu fatu
    Ndeke asengaka loso asengaka te avion
    Naza na nzala kasi na sengi na ngai bolingo
    Naza maniolo kasi na ségui na ngaéi bolingo
    Mokolo na ko coutana na nzambe ngai nako
    Ségayé thethelito, julie tougiléé, koko rubenga, daïda moléka papito kilala
    Matusube katélangai ata kitédi ya liputa na yo nzela nionso na kokende ngai na méma ngo ata na poche ata na gode ata na voiture


    Comentários

    Envie dúvidas, explicações e curiosidades sobre a letra

    0 / 500

    Faça parte  dessa comunidade 

    Tire dúvidas sobre idiomas, interaja com outros fãs de Fally Ipupa e vá além da letra da música.

    Conheça o Letras Academy

    Enviar para a central de dúvidas?

    Dúvidas enviadas podem receber respostas de professores e alunos da plataforma.

    Fixe este conteúdo com a aula:

    0 / 500

    Opções de seleção