exibições de letras 108

Reconnaissance

Marie Misamu

Letra

    Boseka ngai te po naza na bibilia na maboko
    Esika nionso na kokende kombo ya Nzambe na monoko na nga oh
    Basali ya Nzambe oyo baza koteya biso tango nionso
    Boyebi te nini oyo Nzambe asalela bango po basalelaka ye

    Okomona nga tango nionso na nzela kaka ya eclesia
    Oyebi te nini oyo Nzambe asalela nga po nakendaka eclesia eh
    Ah moto kutu oyo ya mokili, soki apesi yo eloko osengi merci
    Ebongo Nkolo ya pema eh, topesi Ye nini?

    Okomona nga tango nionso naza kokombola eclesia
    Oyebi te nini oyo Nzambe asalela nga pona salelaka Ye ye ye

    Ah ngai oh, nazali reconnaissante ye eh
    Makambo asalela nga ya minene papa oyo
    Nawuti na libulu ya masumu abimisi ngai oh
    Esika nazalaki ya liwa eh abimisi ngai oh
    Mikolo na ngai ya ko vivre ekomaki nde ya kotanga eh
    Pongi na ngai na butu kaka bandoto ya mabe
    Nani akopesa nga loboko moto na moto na oyo ya ye
    Nakanisaki libota na nga ekosunga nga, epesi nga nde mokongo
    Nasimbaki moto nakolela ngai
    Pasi elekelaki ngai oh Nzamb'oyo

    Ah ngai oh, nazali reconnaissante na Nzamb'oyo
    Makambo asalela nga ya minene papa oyo
    Nawuti na libulu ya masumu abimisi ngai oh
    Esika nazalaki ya liwa eh abimisi ngai oh
    Mikolo na ngai ya ko vivre ekomaki nde ya kotanga eh
    Pongi na ngai na butu kaka bandoto ya mabe
    Nani akopesa nga loboko moto na moto na oyo ya ye
    Nakanisaki libota na nga ekosunga nga, epesi nga nde mokongo
    Nasimbaki moto nakolela
    Pasi elekelaki ngai oh Nzamb'oyo

    Ah ngai oh, bomoni tina ngai nalingaka Ye
    Nalapa ndayi na vie na ngai oh nakosalela Ye
    Abeta ekuke ya motema na ngai nafongoli akoti
    Ye wana camarade ya motema na ngai eh Nzamb'oyo
    Moto na moto na ngonga na ye
    Abetaki ekuke ya motema na ngai nafongoli akoti

    Ye wana camarade ya motema na ngai oh
    Ye wana thermomètre ya température na ngai oh
    Ye wana mayi na ngai ya komela ekitisaka ngai motema eh
    Ye wana bilei na nga ya kolia na tango ya nzala eh
    Ye wana manteau na ngai na tango malili eh
    Ye wana makasi na ngai tango nalembaka eh Papa oyo
    Ye wana réanimation ya pema Misamu eh Nzamb'oyo
    Ye wana parapluie na ngai yo na tango ya mbula
    Ye wana kisi na ngai ya komela na tango ya maladi
    Ye wana asilisa pasi na ngai oh Papa oyo
    Ye wana alongola soni na ngai oh Papa oyo eh Nzamb'oyo
    Ye wana parapluie ya Christian Litasi eh

    Ah ngai oh, bomoni tina ngai nayembelaka Ye eh
    Nalapa ndayi na vie na ngai oh nakosalela Ye
    Abeta ekuke ya motema na ngai nafongoli akoti
    Ye wana camarade ya motema na ngai oh Papa oyo
    Moto na moto na ngonga na ye
    Abetaki ekuke ya motema na ngai nafongoli akoti
    Ye wana camarade na ngai eh
    Ye wana moninga na nga ya motema ye
    Ye wana makasi na ngai eh
    Ye wana mayi na ngai ya komela
    Ye wana vie na nga mobimba


    Comentários

    Envie dúvidas, explicações e curiosidades sobre a letra

    0 / 500

    Faça parte  dessa comunidade 

    Tire dúvidas sobre idiomas, interaja com outros fãs de Marie Misamu e vá além da letra da música.

    Conheça o Letras Academy

    Enviar para a central de dúvidas?

    Dúvidas enviadas podem receber respostas de professores e alunos da plataforma.

    Fixe este conteúdo com a aula:

    0 / 500

    Opções de seleção