Ba jeu des coins
Mbilia Bel
Lobi na pokwa nafandi na ndako
Mobali awuti mosala nakosilika
Natuna ntina nini
Abandi kobeta ngai
Alobi ngai nabimisa biloko na ngai
Totalani na baleki, tomoni flou
Likambo ekomi koyela nzoto ya moto
Lobi ngai na moninga oyo akola na
Tosololaki masolo ya bomwana
Ndenge nini mobali ayeba nionso
Tokeyi koluka ye tosangana totuna tina
Yaka tobanda mbangu o mama
Mwana mwasi oyo abomi libala na ngai
Amemi basango ezanga mokila na moto
Likambo nayebi te o
Abomi ngai situation o
Bomwana ya moto nani ezanga ambiance?
Oyo ya ngai ekomi nde sango ya mabe
Moninga apanzi ngai maki epai ya mobali
Libala na ngai ekufi mpo na souvenir
Yaka mama Zozo, a yaya
Nakufeli libala bomwana mawa na ngai
Yo na Kintambo mosika ngai na libala
Babebisi ngai nzoto na kobeta ooh
Nani na bomwana asakana te e?
Mobali ayoka
Asilika likambo o
Ntango eleka ngai moto na changée
Bajeu de coin ya bomwana déjà nabosana
Yaka, mama Zozo
Yaka kotala
Ndenge ndako ya libala
Tension emontée
Ngai leki na yo lokola oyebisaka ngai
Bajeux de coin ya bozoba
Yaya nabosana ah, ah
Ah, ah a namemi ngambo, a mama
Mwana mwasi oyo abomi libala na ngai
Ye azali kotula
Ngai na kati ya libala
Ndenge nini asala na ngai concurrence?



Comentários
Envie dúvidas, explicações e curiosidades sobre a letra
Faça parte dessa comunidade
Tire dúvidas sobre idiomas, interaja com outros fãs de Mbilia Bel e vá além da letra da música.
Conheça o Letras AcademyConfira nosso guia de uso para deixar comentários.
Enviar para a central de dúvidas?
Dúvidas enviadas podem receber respostas de professores e alunos da plataforma.
Fixe este conteúdo com a aula: